قَصِيدَةُ الْمَقْبُولَةِ
The Accepted Poem
Ln
صَلَّى اللهُ عَلَى مُحَمَّدْ
صَلَّى اللهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمْ
Nzambe apambola Muhammad,
Nzambe apesa ye kimya pe mapamboli
رَوْضَةُ الْهَادِي نَبِيِنَا
هُيِّئَتْ لِلْمُتَّقِينَا
Elanga ya Motambwisi, Mosakoli na biso,
Ebongisami mpona ba oyo babangaka Nzambe
كُلُّ مَنْ قَالُوا رَضِينَا
بِالْحَبِيبْ مَوْلَاىْ مُحَمَّدْ
Bango nyonso oyo balobi, "Tosepeli,
Na Molingami, mokonzi na biso Muhammad.”
حُبُّهُ عَيْنُ الْكَمَالِ
جَاهُهُ عَالٍ وَغَالِ
Bolingo mpona ye eza ntina ya bopeto,
Lokumu na ye eza likolo pe na motuya
صَحْبُهُ خَيْرُ الرِّجَالِ
بَايَعُوا الْهَادِي مُحَمَّدْ
Baninga na ye baza bato baleki malamu,
Bapesaki ndayi ya bosembo na Motambwisi Muhammad
وَجْهُهُ فَاقَ الْبُدُورَا
زَادَهُ الْمَوْلَى سُرُورَا
Elongi na ye elekaki sanza oyo etonda,
Nkolo abakisaki ye esengo
قَدْ بَدَا فِي الْكَوْنِ نُورَا
قَبْلَ خَلْقِ اللَّهِ مُحَمَّدُ
Pole emonanaki na molongo,
Liboso ya bozalisi ya Nzambe, Muhammad
حُبُّهُ فَرْضٌ وَحَتْمُ
مِدْحَهُ خَيْرٌ وَغُنْمُ
Bolingo mpona ye eza etinda pe mokumba,
Kokumisa ye eza bolamu pe litomba
لَيْسَ يَأْتِي الْقَلْبَ هَمُّ
لِلَّذِي يَهْوَي مُحَمَّدْ
Mawa eya te na motema,
Ya moto oyo alingaka Muhammad
بَحْرُ عِلْمِ اللهِ أَحْمَدْ
كُلُّ مَنْ يَلْقَاهُ يَسْعَدْ
Ahmad aza mbu ya boyebi ya Nzambe
moto nyonso akutanaka na ye azwaka esengo
حَوْضُهُ الصَّافِي الْمُبَرَّدْ
لِلَّذِي يَعْشَقْ مُحَمَّدْ
Liziba na ye eza peto pe malili
mpona moto oyo alingaka Muhammad
يَفْتَحُ اللهُ الْعَوَالِمْ
بإِمَامٍ لِلْمَكَارِمْ
Nzambe afungolaka mikili
na nzela ya Imam ya bizaleli ya lokumu
لِجَمِيعِ الرُّسْلِ خَاتَمْ
الحَبِيبْ مَوْلَاىْ مُحَمَّدْ
Bilembo ya nsuka ya Bantoma nyonso
Molingami, mokonzi na ngai Muhammad
خَيْرُ خَلْقِ اللهِ طَهَ
مِثْلُ شَمْسٍ فِي ضُحَاهَا
Taha aza bozalisi ya Nzambe eleki malamu
lokola moi na pole na yango ya ntongo
هَذِهِ الدُّنْيَا نَرَاهَا
فِي ضِيَاءٍ مِنْ مُحَمَّدْ
Mokili oyo tozali komona
eza na kati ya ngenge ya Muhammad
أَكْحَلُ الْعَيْنَيْنِ أَدْعَجْ
نُورُهُ الْمَحْبُوبُ أَبْلَجْ
Miso moindo pe mbuma ya miso monene
pole na ye ya bolingo ezali kongenga
أَشْنَبُ الْأَسْنَانِ أَفْلَجْ
فَاقَ رُسْلَ اللّهْ مُحَمَّدْ
Na mino ya mpembe pe banzela kitoko
Muhammad alekaki bantoma ya Nzambe
وَجْهُهُ يَا نَاسُ نَائِرْ
سَيِّدِي مَوْلَى الْبَشَائِرْ
O bato, elongi na ye eza kongenga
mokonzi na ngai, nkolo ya bansango malamu
ذُخْرُنَا نُورُ الْبَصَائِرْ
إِسْمُهُ الْهَادِي مُحَمَّدْ
Bomengo na biso, pole ya bososoli
kombo na ye eza Motambwisi Muhammad
قَدْرُهُ الْعَالِي الْمُفَضَّلْ
وَصْفُهُ الْغَالِي الْمُكَمَّلْ
Lokumu na ye eza likolo pe eponami
ndenge bamonisaka ye eza na motuya pe ya kokoka
وَحْيُ رَبِّي قَدْ تَنَزَّلْ
لِلْحَبِيبْ مَوْلَاىْ مُحَمَّدْ
Emoniseli ya Nkolo na ngai ekitaki
likolo ya Molingami, mokonzi na ngai Muhammad
فَضْلُهُ عَمَّ النَّوَاحِي
لِظَلَامِ الْكُفْرِ مَاحِي
Ngolu na ye ezingaki bituka nyonso
koboma molili ya kozanga bondimi
فِي الصَّحَارِى وَالْبِطَاحِ
أَشْرَقَتْ أَنْوَارْ مُحَمَّدْ
Na balisanga pe mabwidi
pole ya Muhammad engengaki
شَرْعُهُ لِلْكَوْنِ يَعْمُرْ
وَبِهِ الْأَيَّامُ تَفْخَرْ
Mibeko na ye etongaka molongo
pe mikolo ezwaka lolendo na ye
دَمْعُ مَنْ يَهْوَاهُ يَقْطُرْ
مِنْ غَرَامٍ فِي مُحَمَّدْ
Pota ya miso ya molingi na ye etangaka
kowuta na mposa makasi mpona Muhammad
حُسْنُهُ لِلْبَدْرِ أَخْجَلْ
وَبِهِ غَيْبٌ تَنَزَّلْ
Kitoko na ye epesaki sanza etonda soni
pe na nzela na ye Makambo ebombana ekitaki
وَجُمُوعَ الْكُفْرِ عُطِّلْ
مِنْ عَزِيمِ مَوْلَانَا مُحَمَّدْ
Pe mampinga ya batomboki ebebisamaki
na mpiko ya mokonzi na biso Muhammad
الْبَعِيرُ يَشْكُو الْمَجَاعَهْ
لِلنَّبِيِّ بَيْنَ الْجَمَاعَةْ
Kamela amilelalelaki mpona nzala
epai ya Mosakoli na kati ya lisanga
قَالَ يَا مَوْلَى الشَّفَاعَةْ
كُنْ شَفِيعِي يَا مُحَمَّدْ
Elobaki, "O Nkolo ya Bobondeli
zala mobondeli na ngai, O Muhammad"
نَادَتِ الْهَادِي غَزَالَهْ
تَشْتَكِي تُبْدِي مَقَالَهْ
Mboloko moko abengaki Motambwisi
komilela pe kopesa lilako na ye
يَا إِمَامًا لِلْرِّسَالَهْ
كُنْ ضَمِينِي يَا مُحَمَّدْ
O Imam ya Nsango
zala ndanga na ngai, O Muhammad
هَذِهِ الدُّنْيَا كَسَاعَهْ
إِجْعَلِ الْأَعْمَالَ طَاعَهْ
Mokili oyo eza kaka ngonga moko
bongo sala ete misala na yo ezala ya botosi
وَاشْتَرِي خَيْرَ بِضَاعَهْ
زَوْرَةَ الْهَادِي مُحَمَّدْ
Pe somba biloko bileki malamu
kotala Motambwisi Muhammad
هَذِهِ الدُّنْيَا تَزُولُ
وَالْبَقَا لَيْسَ يَطُولُ
Mokili oyo ekoleka
pe kowumela na yango ezalaka seko te
أَيْنَ مَنْ يَمْشِي يَقُولُ
كُنْ شَفِيعِي يَا مُحَمَّدْ
Wapi moto oyo atambolaka kolobaka
"Zala mobondeli na ngai, O Muhammad"
رَبَّنَا يَسِّرْ وَسَهِّلْ
زَوْرَةَ الْمُخْتَارِ عَجِّلْ
Nkolo na biso, pesa bopete pe petola
pumbwisa kotala Moponami
دَمْعُنَا يَهْمِى وَيَنْزِلْ
مِنْ غَرَامٍ فِي مُحَمَّدْ
Pota ya miso na biso ezali kotanga pe kokita
kowuta na mposa makasi mpona Muhammad
رَبَّنَا هَيِّئْ طَرِيقَا
كُنْ لَنَا رَبِّي رَفِيقَا
Nkolo na biso, bongisa nzela
zala, Nkolo na ngai, moninga na biso
كَيْ نَرَى بَدْرًا شَفِيقَا
الْحَبِيبْ مَوْلَايْ مُحَمَّدْ
Mpo ete tomona sanza ya mawa
Molingami, mokonzi na ngai Muhammad
ظَنُّنَا فِيكَ جَمِيلُ
أَنْتَ يَا رَبِّي وَكِيلُ
Elikya na biso epai na yo eza kitoko
Yo, O Nkolo na ngai, ozali Mobateli
وَالنَّبِي نِعْمَ الْكَفِيلُ
الْحَبِيبْ مَوْلَايْ مُحَمَّدْ
Pe Mosakoli aza ndanga eleki malamu
Molingami, mokonzi na ngai Muhammad
كُلُّنَا يَرْجُو الْبَشَارَهْ
بِالرَّحِيلْ نَحْوَ الزِّيَارَهْ
Biso nyonso tozelaka bansango malamu
ya kokende mpo na kotala
حَبَّذَا تِلْكَ التِّجَارَهْ
زَوْرَةُ الْهَادِي مُحَمَّدْ
Oyo nde mombongo malamu
kotala Motambwisi Muhammad
أَيْنَ أَصْحَابُ الكَمَالِ
أَيْنَ سَادَاتُ الرِّجَالِ
Wapi bato ya bopeto
wapi bakonzi ya bato
أَنْفَقُوا مِنْ خَيْرِ مَالِ
قَاصِدِينَ مَوْلَاىْ مُحَمَّدْ
Babimisaki bozwi na bango ya malamu
mpo na koluka mokonzi na ngai Muhammad
دَمْعُهُمْ يَقْطُرْ وَبَادِي
كُلَّمَا حَلُّوا بِوَادِي
Pota ya miso na bango ezali kotanga pe komonana
ntango nyonso bakitaka na lobwidi
قَصْدُهُمْ خَيْرُ العِبَادِ
الْحَبِيبْ مَوْلَاىْ مُحَمَّدْ
Mokano na bango eza moombo aleki malamu
Molingami, mokonzi na ngai Muhammad
سَارَ بِالرَّحْمَنِ سَارَا
رَكْبُهُمْ يَطْوِي الْقِفَارَا
Na Nguya ya Moto ya Mawa basalaki mobembo
lisanga na bango ekatisaki esobe
وَرَأَيْنَاهُمْ جَهَارَا
عَاشِقِينْ مَوْلَاىْ مُحَمَّدْ
Pe tomonaki bango polele
balingi ya mokonzi na ngai Muhammad
حَرُّ هَاتِيْكَ الْبَوَادِي
مِثْلُ ثَلْجٍ مِنْ وِدَادِ
Molunge ya bisobe wana
eza lokola neje mpona bolingo
حِصْنُهُمْ خَيْرُ الْعِبَادِ
رَحْمَةُ الْهَادِي مُحَمَّدْ
Ndako na bango ya bateli eza moombo aleki malamu
mawa ya Motambwisi Muhammad
اسْكُبِ الدَّمْعَ حَلَالًا
عِنْدَمَا تَلْقَى الْهِلَالَا
Sopisa pota ya miso ofele
ntango omoni mwa sanza
مِنْ بَعِيدٍ قَدْ تَلَالَا
فِيْهِ نُورٌ مِنْ مُحَمَّدْ
Uta mosika ezali kongenga
ezali na pole kowuta na Muhammad
هَذِهِ الْخَضْرَاءُ تَظْهَرْ
نُورُهَا لِلْعَقْلِ يَبْهَرْ
Ndunda oyo ya langi ya mpondu emonani
pole na yango ekamwisi mayele
عِنْدَ رُؤْيَاهَا تَحَدَّرْ
دَمْعُ مَنْ يَعْشَقُ مُحَمَّدْ
Na komona yango, ezali kotiyola
pota ya miso ya moto oyo alingaka Muhammad
رَوْضَةُ الْهَادِي نَبِيِّنَا
تُفْرِحُ الْقَلْبَ الْحَزِينَا
Elanga ya Motambwisi, Mosakoli na biso
epesaka esengo na motema ya mawa
أَبْشِرُوا يَا زَائِرِينَا
بِالشَّفَاعَةِ مِنْ مُحَمَّدْ
Bosepela, O bapaya na biso
na bobondeli ya Muhammad
هَذِهِ الرَّوْضَةُ أَبْشِرْ
قَدْ وَصَلْنَا لِلْمُبَشِّرْ
Oyo eza elanga, bongo bosepela
tokomi epai ya Memi-Nsango
أَمْرُ دُنْيَا لَا تُفَكِّرْ
وَانْظُرِ الْهَادِي مُحَمَّدْ
Kanisa te mpona makambo ya mokili
pe tala Motambwisi Muhammad
كُلُّ مَنْ زَارَ الْمَقَامَا
فَالنَّبِي رَدَّ السَّلَامَا
Moto nyonso atalaka esika mosantu
Mosakoli azongisaka losako na bango
يَعْرِفُ الْخَلْقَ تَمَامَا
بَشِّرُوا زُوَّارَ مُحَمَّدْ
Ayebi bozalisi na bopeto nyonso
pesa bansango malamu na bapaya ya Muhammad
هَامَتْ الْأَرْوَاحُ حُبًّا
دَمْعُنَا قَدْ سَالَ صَبًّا
Milimo etambolaki na bolingo
pota ya miso na biso etiyolaki makasi
نَالَتْ الزُّوَّارُ قُرْبًا
لِلْحَبِيبِ مَوْلَايْ مُحَمَّدْ
Bapaya bakomaki pembeni
ya Molingami, mokonzi na ngai Muhammad
يَا حَبِيبَ الْمُتَّقِينَا
وَسِرَاجًا وَمُبِينَا
O Molingami ya ba oyo babangaka Nzambe
pe mwinda pe pole emonana polele
يَا أَبَا الْقَاسِمْ دُعِينَا
فَأَتَيْنَا يَا مُحَمَّدْ
O Abu al-Qasim, tobiangamaki
pe bongo toyei, O Muhammad
مَرْحَبًا يَا مُصْطَفَانَا
حُبُّكَ الْغَالِي أَتَانَا
Boyei malamu, O Moponami na biso
bolingo na yo ya motuya eyei epai na biso
مِنْ بَعِيدٍ قَدْ دَعَانَا
لِلْحَبِيبِ مَوْلَايْ مُحَمَّدْ
Uta mosika ebiengaki biso
epai ya Molingami, mokonzi na ngai Muhammad
كَيْ نَرَي ذَاكَ الْمَقَامَا
فِيهِ بَدْرٌ قَدْ تَسَامَى
Mpo ete tomona esika wana
epai wapi sanza emataki
وَأَخُو الشَّوْقِ تَسَامِي
مِنْ هِيَامٍ فِي مُحَمَّدْ
Pe moto ya mposa atelemaki
kowuta na bolingo eleka ndelo mpona Muhammad
يَا شَفِيعًا لِلذُّنُوبِ
وَغِيَاثًا فِي الْكُرُوبِ
O mobondeli mpona masumu
pe mosungi na ntango ya pasi
وَضِيَاءً لِلْقُلُوبِ
أَنْتَ نُورُ يَا مُحَمَّدْ
Pe pole mpona mitema
ozali pole, O Muhammad
جَاهُكَ الْمَرْجُو عَظِيمٌ
أَنْتَ مِفْضَالٌ كَرِيمٌ
Lokumu na yo ezelami eza monene
ozali na bizaleli malamu pe motema pɛtɛɛ
وَرَءُوفٌ وَرَحِيمٌ
وَعَفُوٌّ يَا مُحَمَّدْ
Pe malamu pe mawa
pe molimbisi, O Muhammad
أَبْشِرُوا يَا مَنْ رَأَيْتُمْ
رَوْضَةَ الْهَادِي وَزُرْتُمْ
Bosepela, O bino ba oyo bomoni
elanga ya Motambwisi pe botalaki
عِنْدَ رَبِّ الْعَرْشِ كُنْتُمْ
زَائِرِينَ مَوْلَايْ مُحَمَّدْ
Elongo na Nkolo ya Kiti ya Bokonzi bozalaki
bapaya ya mokonzi na ngai Muhammad
قَدَّرَ الْمَوْلَى السَّعَادَهْ
وَدَعَاكُمْ لِلْعِبَادَهْ
Nkolo aponaki esengo
pe abiengaki bino na losambo
هَذِهِ الْحُسْنَى زِيَادَهْ
زَوْرَةُ الْهَادِي مُحَمَّدْ
Oyo eza bolamu ya nsuka pe likolo na yango
kotala Motambwisi Muhammad
سَعْدُكُمْ يَا مَنْ تَزُورُوا
وَجْهُكُمْ يَعْلُوهُ نُورُ
Esengo na bino ba oyo bozali kotala
bilongi na bino ezipami na pole
رَبُّكُمْ رَبٌّ غَفُورُ
لِلَّذِي قَدْ زَارَ مُحَمَّدْ
Nkolo na bino aza Nkolo ya Kolimbisa Nyoso
mpona moto oyo atalaki Muhammad
لَوْ رَأَيْنَا الْوَاقِفِينَا
لَوْ رَأَيْنَا الْقَاعِدِينَا
Soki tomonaki ba oyo batelemi
soki tomonaki ba oyo bafandi
لَوْ رَأَيْنَا السَّائِلِينَا
الشَّفَاعَةَ مِنْ مُحَمَّدْ
Soki tomonaki ba oyo bazali kosenga
bobondeli kowuta na Muhammad
نُورُ خَيْرِ الْخَلْقِ يُجْلِي
وَكِتَابُ اللهِ يُتْلِي
Pole ya bozalisi eleki malamu ezali kongengisa
pe Buku ya Nzambe ezali kotangama
وَعُلُومُ الشَّرْعِ تُمْلِي
عِنْدَ مَوْلَايْ مُحَمَّد
Pe boyebi ya Mibeko ezali kopesama
na mokonzi na ngai Muhammad
إِنْ رَجَعْتُمْ بِالسَّلَامَةْ
أَخْبِرُوا أَهْلَ الْمَلَامَةْ
Soki bozongi na kimya
boyebisa bato ya kofinga
كَيْ يَجِيئُوا مِنْ تِهَامَةْ
لِلْحَبِيبِ مَوْلَايْ مُحَمَّدْ
Mpo bawa kowuta na Tihamah
epai ya Molingami, mokonzi na ngai Muhammad
عَرِّفُوهُمْ بِالْمَقَامِ
أَخْبِرُوهُمْ بِالْهِِيَامِ
Boyebisa bango makambo ya esika
boyebisa bango makambo ya bolingo eleka ndelo
أَيْقِظُوهُمْ مِنْ مَنَامِ
كَيْ يَزُورُوا لِمُحَمَّدْ
Bolamusa bango na pongi
mpo ete batala Muhammad
لَوْ عَلِمْتُمْ يَا عَوَاذِلْ
مَا سَكَنْتُمْ فِي الْمَنَازِلْ
Soki kaka boyebaki, O basambwisi
mbele botikalaki na bandako na bino te
مَا لَنَا فِي الْقَلْبِ شَاغِلْ
كُلُّنَا يَهْوَى مُحَمَّدْ
Tozali na ntina mosusu na motema te
biso nyonso tolingaka Muhammad
قَدْ سَرَيْنَا بِالْمَطَايَا
لِلنَّبِي خَيْرِ الْبَرَايَا
Tosalaki mobembo ya butu likolo ya banyama
epai ya Mosakoli, bozalisi eleki malamu
سَيِّدِي كَنْزِ الْعَطَايَا
الْحَبِيبِ مَوْلَايْ مُحَمَّدْ
Mokonzi na ngai, bomengo ya makabo
Molingami, mokonzi na ngai Muhammad
حُبُّهُ يُحْيِي الْقُلُوبَا
يَغْفِرُ اللهُ الذُّنُوبَا
Bolingo na ye epesaka bomoi na mitema
Nzambe alimbisaka masumu
يَسْتُرُ اللهُ الْعُيُوبَا
بِالْحَبِيبِ مَوْلَايْ مُحَمَّدْ
Nzambe abombaka mabunga
na nzela ya Molingami, mokonzi na ngai Muhammad
يَا رَسُولَ اللهِ نَادِ
أَهْلَ حُبٍّ وَوِدَادِ
O Ntoma ya Nzambe, benga
bato ya bolingo pe boboto
هُمْ بِشَوْقٍ فِي بِعَادِ
أُدْعُهُمْ مَوْلَايْ مُحَمَّدْ
Bazali na mposa ntango baza mosika
benga bango, mokonzi na ngai Muhammad
وَتَوَجَّهْ لِلْمُقَدِّرْ
رَبُّنَا الْمُعْطِي يُيَسِّرْ
Pe baluka epai ya Mokabi
Nkolo na biso, Mopesi, apesaka bopete
بَعْدَ عُسْرٍ كَيْ نُبَدِّرْ
لِلْحَبِيبِ مَوْلَايْ مُحَمَّدْ
Sima ya pasi mpo ete topumbwa
epai ya Molingami, mokonzi na ngai Muhammad
صَلَوَاتٌ طَيِّبَاتُ
زَاكِيَاتٌ نَامِيَاتُ
Mapamboli ya peto
ya bopeto pe ezali kobakisama
غَالِيَاتٌ دَائِمَاتُ
لِلْحَبِيبِ مَوْلَايْ مُحَمَّدْ
Ya motuya pe ya seko
mpo na Molingami, mokonzi na ngai Muhammad
وَسَلَامُ اللهِ يَتْرَى
عَطَّرَ الْكَوْنَ وَ مَرَّا
Pe kimya ya Nzambe kolandana
epesaki nsolo malamu na molongo ntango elekaki
شَرَحَ الصَّدْرَ وَسَرَّا
لِلْحَبِيبِ مَوْلَايْ مُحَمَّدْ
Efungolaki tolo pe epesaki esengo
mpo na Molingami, mokonzi na ngai Muhammad
وَعَلَى الصَّحْبِ الْأَفَاضِلْ
كُلُّ مِفْضَالٍ وَعَامِلْ
Pe likolo ya baninga ya malamu
moto nyonso ya lokumu pe ya misala
بِكِتَابِ اللهِ قَائِلْ
وَكَذَا آلِ مُحَمَّدْ
Kolobaka na nzela ya Buku ya Nzambe
pe ndenge moko libota ya Mosakoli
عُمَّ بِالرِّضْوَانِ رَبِّي
خَيْرَ صِدِّيقٍ وَصَحْبِ
Zinga na bosepeli, Nkolo na ngai
moto wa sembo aleki malamu pe moninga
وَكَذَا الْفَارُوقُ حِبِّي
سَكَنَا قُرْبَ مُحَمَّدْ
Pe ndenge moko Faruq, molingami na ngai
bango mibale bafandi pembeni ya Muhammad
عُمَّ ذَا النُّورَيْنِ رَبِّي
وَأَبَا السِّبْطَيْنِ حِبِّي
Zinga Nkolo ya Bapole Mibale, Nkolo na ngai
pe Tata ya Bankoko Mibale ya Mibali, molingami na ngai
ثُمَّ لِلْعَمَّيْنِ رَبِّي
ثُمَّ صَحْبًا لِمُحَمَّدْ
Na sima mpo na banoko mibale, Nkolo na ngai
na sima baninga ya Muhammad
عُمَّ لِلسِّبْطَيْنِ رَبِّي
آلِ خَيْرِ الْخَلْقِ طِبِّي
Zinga bankoko mibale ya mibali, Nkolo na ngai
libota ya Mosakoli, nkisi na ngai
وَكَذَا الزَّهْرَاءُ تُنْبِي
عَنْ كَمَالٍ فِي مُحَمَّدْ
Pe ndenge moko al-Zahra oyo ayebisaka
mpo na bopeto na kati ya Muhammad
عُمَّ سُهَّارَ اللَّيَالِي
كُلَّ مَنْ لِلْوِرْدِ تَالِي
Zinga ba oyo balamukaka na butu
moto nyonso oyo atangaka mabondeli
هُمْ رِجَالُ الِاتِّصَالِ
بِالْحَبِيبِ مَوْلَايْ مُحَمَّدْ
Baza bato ya boyokani
na Molingami, mokonzi na ngai Muhammad
عُمَّ سُكَّانَ الْبَرَارِي
وَالصَّحَارَى وَالْقِفَارِ
Zinga bavandi ya bisika etikalá mpamba
pe balisanga pe bisobe
كُلَّ مَجْذُوبٍ وَقَارِي
لِلصَّلَاةِ عَلَى مُحَمَّدْ
Moto nyonso ya esengo pe motangi
ya mapamboli likolo ya Muhammad
عُمَّ رَبِّي النَّاسِكِينَا
وَالْعِبَادَ الصَّالِحِينَا
Zinga, Nkolo na ngai, bato bamikaba
pe baombo ya sembo
وَالرِّجَالَ الْوَاقِفِينَا
عِنْدَ مَوْلَانَا مُحَمَّدْ
Pe mibali batelemi
na bopemi ya mokonzi na biso Muhammad
وَبِهِمْ يَا رَبِّ نَصْرَا
دَائِمًا دُنْيَا وَأُخْرَى
Pe na nzela na bango, O Nkolo, pesa elonga
ntango nyonso na mokili oyo pe na Mokili Ekoya
أَعْظِمَنْ يَا رَبِّ أَجْرَا
بِالْحَبِيبْ مَوْلَايْ مُحَمَّدْ
Kumisa, O Nkolo, lifuti
na nzela ya Molingami, mokonzi na ngai Muhammad
رَبِّ رُدَّ الْحَاسِدِينَا
عَنْ أَذَانَا خَائِبِينَا
Nkolo, bengana bato ya zuwa
mpo basala biso mabe te, na mawa
كُنْ لَنَا عَوْنًا مُعِينَا
بِالْحَبِيبِ مَوْلَايْ مُحَمَّدْ
Zala mpo na biso mosungi pe mobateli
na nzela ya Molingami, mokonzi na ngai Muhammad
رَبِّ لَا تَجْعَلْ عِدَانَا
تَتَمَكَّنْ مِنْ أَذَانَا
Nkolo, kotika te banguna na biso
bazala na makoki ya kosala biso mabe
اكْسُهُمْ ثَوْبًا هَوَانَا
وَأَجِبْنَا بِمُحَمَّدْ
Latisá bango elamba ya soni
pe yanola biso mpo na Muhammad
عَجِّلِ الْخَوْفَ إِلَيْهِمْ
وَكَذَا الْبَأْسَ عَلَيْهِمْ
Pumbwisa bobangi likolo na bango
pe ndenge moko pasi mpo na bango
وَكَذَا الشَّرَّ لَدَيْهِمْ
وَانْصُرَنْ آلَ مُحَمَّدْ
Pe ndenge moko mabe epai na bango
pe pesa elonga na libota ya Mosakoli
نَاظِمُ الدُّرِّ الْمُحَرَّرْ
صَالِحٌ مِنْ آلِ جَعْفَرْ
Mokomi ya mayaka oyo ya motuya
eza Salih kowuta na libota ya Ja'far
رَاجِي فَضْلًا مِنْكَ أَكْبَرْ
بِالْحَبِيبِ مَوْلَايْ مُحَمَّدْ
Kozela ngolu ya monene kowuta epai na Yo
na nzela ya Molingami, mokonzi na ngai Muhammad
يَرْجُو فَضْلًا لَنْ يَزُولَا
وَرِضَاءً وَقَبُولَا
Azali kozela ngolu oyo esilaka te
pe esengo pe bondimi
وَاتِّصَالًا وَوُصُولَا
لِلْحَبِيبِ مَوْلَايْ مُحَمَّدْ
Pe boyokani pe bokomi
epai ya Molingami, mokonzi na ngai Muhammad
يَرْجُو فَضْلًا مِنْكَ رَبِّي
زَوْرَةَ الْمُخْتَارِ حِبِّي
Azali kozela ngolu kowuta epai na Yo, Nkolo na ngai
kotala Moponami, molingami na ngai
كُلَّ عَامٍ بَيْنَ صَحْبِ
زَائِرِينَ مَوْلَايْ مُحَمَّدْ
Mobu nyonso na kati ya baninga
kotala mokonzi na ngai Muhammad
وَبِخَيْرٍ فِي الْخِتَامِ
نَبْتَغِي نَيْلَ الْمَرَامِ
Pe na bolamu na nsuka
tokozela kokokisa mposa na biso
بِجِوَارٍ لِلْمَقَامِ
فِي بَقِيعٍ يَا مُحَمَّدْ
Pembeni ya esika mosantu
na Baqi', O Muhammad