عَلَى الْعَقِيقِ اجْتَمَعْنَا
Toyanganaki o Aqiq
Ln
عَلَى الْعَقِيقِ اجْتَمَعْنَا
نَحْنُ وَسُودُ الْعُيُونِ
Na lobwaku ya Al-Aqiq tokutanaki
biso mpe bǎna-basi ya miso moindo
مَا ظَنِّ مَجْنُونَ لَيْلَى
قَدْ جُنَّ بَعْضَ الْجُنُونِ
Makanisi nini mpo na Kizengi ya Layla?
Azwaki kaka mwa ndambo ya ligboma oyo
فَيَا عُيُوني عَيَوْنِي
وَيَا جُفُونِي جَفَوْنِي
Oh miso na ngai, bolembi ngai makasi
mpe mpila ya miso na ngai, bosundoli ngai
وَيَا قُلَيْبِي تَصَبَّرْ
عَلَى الَّذِي فَارَقُونِي
Oh motema na ngai moke, zala na mpiko
mpo na ba oyo bakabwani na ngai
فَارَقْتُهُمْ يَوْمَ الاِثْنَيْنِ
صُبْحَ الثَّلَاثَا وَاحِشُونِي
Nakabwanaki na bango mokolo ya yambo
na ntongo ya mokolo ya mibale, mawa ekoti ngai
هُمْ سَادَةٌ خَلَّفُونِي
أَبْكِي دَماً مِنْ عُيُونِي
Bazali mikonzi oyo batikaki ngai
nazali kolela makila uta na miso na ngai
بَكَيْتُ حَتَّى رَثَانِي
الْطَّيْرُ فَوْقَ الْغُصُونِ
Nalelaki tee mpe ndeke
na likolo ya bitape bayokelaki ngai mawa
بِاللهِ إِنْ مُتُّ شَوْقاً
بِأَدْمُعِي غَسِّلُونِي
Na nkombo ya Nzambe, soki nakufi na mposa
bosokola nzoto na ngai na mpisoli na ngai
نُوحُوا عَلَيَّ وَقُولُوا
هَذَا قَتِيلُ العُيُونِ
Bolela ngai mpe boloba
"Oyo azali moto abomami na miso wana"
مَا زِلْتُ حَوْلَ الْمَطَايَا
أَقُولُ بِاللهِ احْمِلُونِي
Natikalaki pembeni ya banyama ya mobembo
kolobaka: "Na nkombo ya Nzambe, bomema ngai
إِلَى مَنَازِلِ قَوْمِي
سَارُوا وَمَا وَدَّعُونِي
Kino na bandako ya bato na ngai"
bakendeki kozanga ete báloba ngai tiela
رُوحْ يَا رَسُولِي إِلَيْهِمْ
سِرْعاً وَقَبِّلْ يَدَيْهِمْ
Kende, yo motindami na ngai epai na bango
noki mpe pambola maboko na bango
وَاقْرَأْ سَلَامِي عَلَيْهِمْ
لَعَلَّهُمْ يَقْبَلُونِي
Tanga mbote na ngai epai na bango
mbala mosusu bakondima ngai lisusu
جَانِي الْرَّسُول وَهُوَ يَضْحَكْ
وَقَالَ أَبْشِرْ بِصُلْحِكْ
Motindami ayeli ngai na koseka
mpe alobi: "Sepela mpo boyokani eyei!
وَحَيَاةِ عَيْشِكَ وَمِلْحِكْ
هُمْ بِالوِصَالِ وَاعَدُونِي
Na bomoi ya limpa mpe mungwa na yo
bapesaki ngai elaka ete bokokutana lisusu"