بِفَاطِمَةْ قَدْ صَفَا حَالِي
Na Fatima, ezaleli na ngai epɛtolami.
Ln
بِفَاطِمَةْ قَدْ صَفَا حَالِي وَنِلْتُ الْمَرَامْ
بِضْعَة مُحَمَّدْ حَبِيبِ اللهْ خَيْرِ الْأَنَامْ
Na nkombo ya Fatima bolamu na ngai epetoli mpe nazwi nionso nalingaki
Eteni ya Muhammad, Molingami ya Nzambe, malamu koleka bato nionso
أَعْلَى لَهَا اللهْ قَدْراً فِي الْعُلَا وَالْمَقَامْ
نِعْمَ الْبَتُولْ الْرَّضِيَّةْ نُورْ كُلِّ الْظَّلَامْ
Nzambe atomboli lokumu mpe esika na ye na likolo mpenza
Oyo nde Mobateli-ya-mbebo, Moto-ya-esengo, pole na kati ya molili nionso
أُمِّ الْحَسَنْ وَالْحُسَيْنْ أَهْلِ الْمَرْقَى الْعِظَامْ
لَهُمْ عَطَايَا مِنَ الْمَوْلَى كِبَارٌ جِسَامْ
Mama ya al-Hasan mpe al-Husayn, bato ya bamatelo monene
Bazwi makabo ya Nzambe ya minene mpenza
هُمْ سَادَةَ أَهْلِ الْجِنَانِ الْعَالِيَةْ يَا غُلَامْ
مَنْ حَبَّهُمْ صِدِقْ بَا يِسْكُنْ بِدَارِ الْسَّلَامْ
Bango nde bankolo ya lola oyo eleki likolo
Moto nionso akolinga bango na sembo akofanda na ndako ya kimia
وَمَنْ تَعَلَّقْ بِهِمْ يَظْفَرْ بِنَيْلِ الْمَرَامْ
أَكْرَمْتِ يَا بِضْعَةَ أَحْمَدْ فَانْعَمِي بِالْتَّمَامْ
Mpe moto nionso akokangama na bango akozwa nionso alingaki
Oza na motema malamu, yo eteni ya Ahmed, silisa bolamu na yo epai na biso
وَامْنَحِي عَبْدَكُمْ فِي الْقُرْبْ أَعْلَى وِسَامْ
نَقُومْ بِحَمِلْ الْرَّيَاتِ الْهُدَ أَحْسَنْ قِيَامْ
Pesá moombo na yo lokumu ya likolo ya kozala pene na yo
Lokumu ya kotombola bendele ya litambwisi na lolenge ya malamu mpenza
تَعُمْ دَعْوَتُهْ فِي الْأَكْوَانْ كُلِّ الْأَنَامْ
نِلْبَسْ خِلَعْ إِرْثْ مَا يَصِفْ سَنَاهَا كَلَامْ
Mpo ete kobenga ya Basakoli ekangisa bato nionso
Mpe bongo tolata kazaka ya bosango ya Mosakoli, oyo nkembo na yango ekoki kolimbolama te
يَا نُورْ قَلْبِي وَيَا أُمِّي عَلَيْكِ الْسَّلَامْ
فِي كُلِّ حَالٍ وَشَأْنٍ كُلِّ لَحْظَةْ دَوَامْ
E pole ya motema na ngai, e mama na ngai, kimia ezala na yo
Libela na makambo nionso, na ntango nionso mpe na bileko nionso
عَلَيْكِ صَلَّى إِلَهِي مَعَ أَبِيكِ الْإِمَامْ
إِمَامْ كُلِّ الْوَرَى فِي كُلِّ خَاصٍّ وَعَامْ
Nzambe apambola yo elongo na Tata na yo, Mokonzi
Mokonzi ya bikelamu nionso, bato ya lokumu mpe bato mpamba
الْشَّافِعِ الْمُبْتَغَ يَوْمَ الْلِّقَاءْ وَالْزَّهَامْ
يَوْمِ الْمَلَائِكْ تُنَادِي جَمِعْ كُلِّ الْأَنَامْ
Mosambisi oyo tozali koluka na mokolo ya kokutana mpe ya ebele ya bato
Mokolo oyo baanzelu bakoganga mpo na bato nionso oyo basangani
غُضُّوا أَبْصَارَكُمْ تَمُرْ بِنْتِ الْنَّبِيِ بِالْسَّلَامْ
وَنَكِّسُوا رُؤُوسَكُمْ مَا أَعْظَمَهْ وَاللهْ مَقَامْ
"Bokitisa miso na bino mpo mwana muasi ya Mosakoli azali koleka na kimia
Mpe bogumbisa mitó na bino," O oyo nde esika ya nkembo monene!
تِذَكَرِينِي مَعَكِ أَعْبُرْ وَمَنْ لَهُ ذِمَامْ
حَاشَاكِ يَا أُمَّنَا تِنْسِينْ هَذَا الْغُلَامْ
Kanisá ngai, mpo nakatisa elongo na yo mpe na se ya kotala na yo
Mama, ekoki kozala te ete obosana mwana na yo oyo!
مَحْسُوبَكُمْ يَرْتَجِيهْ مِنْكُمْ بِهِ الْإِهْتِمَامْ
أَنْتُمْ مَرَامُهْ وَمَقْصُودُهْ وَنِعْمَ الْمَرَامْ
Mwana na yo azali koluka likebi na yo
Yo nde mokano mpe mposa na ye, mpe oyo nde mposa ya malamu mpenza!
يَا بِنْتَ طه فُؤَادِي فِي مَحَبَّتِكْ هَامْ
وَاللهْ أَنْتُمْ مُرَادِي فِي الْدُّنَا وَالْقِيَامْ
E mwana muasi ya Taha, motema na ngai ekufi mpo na bolingo na yo
Na nkombo ya Nzambe, yo nde mposa na ngai na mokili oyo mpe na lisekwa
وَمَا أَنَا إِلَّا بِكُمْ يَا سَادَتِي يَا كِرَامْ
عَلَيْكِ مَعَ وَالِدِكْ أَزْكَى الْصَّلَاةْ وَالسَّلَامْ
Mpe ngai nazali eloko te soki bino te, e bankolo na ngai ya motema malamu
Losako mpe kimia ya peto ezala na yo mpe na baboti na yo
وَأَهْلِ الْكِسَاءْ وَأَهْلِ بَيْتِهْ عَالِيِّينَ الْمَقَامْ
وَالْصَّحْبْ أَجْمَعْ وَمَنْ عَلَى هُدَاهْ اِسْتَقَامْ
Mpe bato ya kazaka mpe libota na ye; bango nionso ya bakonzi ya likolo
Mpe baninga nionso mpe baoyo batia makolo makasi na nzela ya sembo