بَادِرْ لَقَدْ فَاتَتْكَ الْغَنَائِمْ
Salá noki! Biloko ya etumba bileki yo.
Ln
Ln
بَادِرْ لَقَدْ فَاتَتْكَ الْغَنَائِمْ
تَقَاسَمُوهَا وَأَنْتَ نَائِمْ
Salá mbángu, pamba té biloko ya motuya eleki yo
Bakaboli yango wana yo ozali kolala mpongi
وَلَوْ رَأَيْتَ الَّذِينَ فَازُوا
نُحْتَ كَمَا نَاحَتِ الْحَمَائِمْ
Soki omonaki baoyo balóngaki mpe bazwaki mbano
Olingaki olela ndéngé bibenga elelaka
إِنْ رُمْتَ أَلَّا تَكُونَ نَادِمْ
قُمْ لِحَبِيبِ الْقُلُوبِ لَازِمْ
Soki olingi kozala na mawa tɛ́ mpo na ntango eléki
Tɛlɛmá mpe kangama na Molingami ya mitema
وَلَازِمِ الْبَابَ يَا مُعْنَّى
إِنَّ الْسَّعِيدَ الَّذِي يُلَازِمْ
Kangama mpenza na ekuke, yo molimo oyo elɛmbi
Pamba té moto ya esengo mpenza azali oyo akangami
مَنْ لَازِمَ الْبَابَ نَالَ قُرْبا
وَفَازَ بِالْأَجْرِ وَالْغَنَائِمْ
Moto nionso oyo akangami na ekuke apusani mpémbéni
Mpe alongi mbano ná biloko nionso ya motuya
وَلَا تَنَمْ سَاعَةَ الْتَّجَلِّي
فَلَيْسَ يَحْظَى بِالْأَجْرِ نَائِمْ
Kólala mpongi tɛ́ na ngonga ya emoniselí ya Nkembo
Pamba té mowei-mpongi akoki kozwa mbano tɛ́
قَدْ جَرَحَتْ قَلْبِيَ الْخَطَايَا
وَلَسْتُ أَلْقَى لَهَا مَرَاهِمْ
Masumu na ngai ezokisi motema na ngai makasi
Mpe nazali komona nkisi mpo na kobikisa yango tɛ́
سِوَى الْرِّضَا مِنْكَ يَا إِلَهِي
يَا وَاسِعَ الْجُودِ وَالْمَكَارِمْ
Longola sé kosepela na Yo, e Nkolo na ngai
Yo oyo ozali na kabo monene mpe ngolu ebele
وَقَدْ تَوَسَّلْنَا يَا إِلَهِي
بِسَيِّدِ الْعَرَبِ وَالْأَعَاجِمْ
Topusani mpémbéni na Yo, e Nkolo na biso
Na nzela ya Mokonzi ya Ba-Arabe mpe ya bikólo nionso
نَبِيِّنَا الْمُصْطَفَى الْتِّهَامِي
مَنْ جَاءَ لِلْأَنْبِيَاءِ خَاتَمْ
Mosakoli na biso, Moponami, Moto ya Tihama
Oyo ayei lokola elembo ya suka ya basakoli